Matthew 12

Yesu azali mokonzi ya mokolo ya saba

(Mk. 2.23-28 ; Lk. 6.1-5)

1Na mikolo wana, yesu alekaki na bilanga ya ble ; ezalaki mokolo ya saba
Mokolo ya saba  : Mokolo ya yenga ya bayuda ; mokolo ya mposo ya lelo.
. Bayekoli na ye bazalaki na nzala ; bongo babandaki kobuka ble mpe kolia yango.

2Tango bafarizeo bamonaki bango, balobaki na Yesu :

—Tala bayekoli na yo, bazali kosala likambo oyo epekisami kosala na mokolo ya saba !

3Kasi Yesu azongiselaki bango :

—Naino botangi te likambo David asalaki, tango ye na baninga na ye bazalaki na nzala ?
4Akotaki na Ndako ya Nzambe mpe aliaki elongo na baninga na yemampa oyo bapesaki makabo na Nzambe. Nzokande ezala ye, ezala baningana ye, bazalaki na ndingisa te ya kolia yango ; kaka banganga-Nzambende bakokaki kolia yango. 5To, naino botangi te na Mobeko, ete na mokolo ya saba, banganga-Nzambe oyo basalaka na Ndako ya Nzambe babuka mobeko ya saba ; bongo yango ezalaka mabe te mpo na bango ?

6Ya solo nalobi na bino, moto moko azali awa aleki ndako ya Nzambe ! 7A a ! soki bososolaki tina ya maloba oyo : Nasepelaka na bato ya mitema mawa, kasi naboyi mbeka, ya solo, mbele bokokaki te koloba na bato oyo basali mabe te, ete basali mabe. 8Pamba te Mwana ya Moto azali Mokonzi ya mokolo ya Saba.

(Mk. 3.1-6 ; Lk. 6.6-11)

9Tango alongwaki kuna, akendaki na ndako na bango ya mayangani. 10Moto moko azalaki wana, azalaki na loboko ya kokufa.

Bongo batunaki ye :

—Boni, nzela epesami mpo na kobikisa moto mokolo ya saba ?

Batunaki bongo mpo bazwa nzela ya kofunda ye.

11Kasi Yesu alobaki na bango :

—Nani kati na bino soki azali na meme moko kaka, mpe soki yango ekweyi na libulu mokolo ya saba, akokita na libulu te mpo na kobimisa yango ?
12Ya solo, moto aleki meme na motuya. Yango wana, nzela ezali mpo nakosala likambo ya malamu na mokolo ya saba !

13Bongo alobaki na moto yango :

—Tanda loboko !

Atandaki yango, mpe yango ekomaki malamu lokola oyo mosusu.

14Kasi bafarizeo babimaki mpe basanganaki mpo na koluka nzela ya kobomisa Yesu.

Yesu mosali ya Yawe

15Tango yesu ayebaki yango, alongwaki wana. Bato ebele balandaki ye, mpe abikisaki bango nyonso. 16Kasi apekisaki bango mpo baloba te soki ye azali nani. 17Na bongo nde maloba ya moprofeta Ezayi ekokisamaki :
18 Tala mosali na ngai oyo napona,
ye azali moto oyo ngai nalingaka,
mpe asepelisaka ngai mingi.
Nakotia Molimo na ngai likolo na ye
mpe akosakola bosembo na bikolo ya bapaya.

19 Akoswana te,
mpe akoganga te.
Bakoyoka mongongo na ye na babala-bala te.

20 Mwa nzete oyo egumbami, akobuka yango te,
mpe mwinda oyo elingi kokufa,
akoboma yango te ;
kino tango akolongisa bosembo.

21 Bongo bato ya bikolo ya bapaya
bakotia elikya na kombo na ye.

Nzambe to Satana

(Mk. 3.20-30 ; Lk. 11.14-23 ; 12.10)

22Bongo bamemelaki ye moto moko azalaki na milimo mabe, azalaki moto ya kokufa miso mpe azalaki koloba te. Yesu abikisaki ye, bongo moto yango akomaki koloba mpe komona.

23Bato nyonso bakamwaki mpe balobaki :

—Moto oyo azali mwana ya David te ?

24Kasi tango bafarizeo bayokaki bongo, balobaki :

—Moto oyo azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belezebule : mokonzi ya milimo mabe !

25Yesu ayebaki makanisi na bango, mpe alobaki :

—Bokonzi nyonso oyo ezali ya kokabwana kati na yango moko, ekopanzana ; mpe vile nyonso to ndako nyonso oyo ezali ya kokabwana kati na yango moko, ekoki kowumela te.
26Soki Satana abengani Satana, wana amikaboli kaka ye moko ; bongo bokonzi na ye ekowumela ndenge nini ?

27Soki ngai nabenganaka milimo mabe na nguya ya Belezebule, bongo bato na bino babenganaka bango na nguya ya nani ? Yango wana, bango moko bakozala bazuzi na bino. 28Kasi soki nabenganaka milimo mabe na nguya ya Molimo na Nzambe, wana bosengeli boyeba ete Bokonzi ya Nzambe esiʼekomi epai na bino.

29To mpe, ndenge nini moto akoki kokota na ndako ya elombe mpekoyiba biloko na ye, soki naino akangisi ye na bansinga te ? Kasi soki akangisi ye na bansinga, nde akoki koyiba biloko ya ndako na ye.

30Moto oyo azali elongo na ngai te, azali monguna na ngai ; mpe oyo asangisaka elongo na ngai te, azali kopanza. 31Yango wana nalobi na bino boye : lisumu nyonso mpe kotiola Nzambeekolimbisama ; kasi kotiola Molimo Mosantu ekolimbisama te. 32Moto oyo alobi maloba ya mabe mpo na Mwana ya moto, akolimbisama ; kasi oyo akoloba maloba ya mabe mpo na Molimo Mosantu, akolimbisama te, ezala na tango oyo to mpe na tango oyo ezali koya.

Nzete ya malamu mpe mbuma na yango

(Lk. 6.43-45)

33Soki nzete ezali malamu, ekobota mpe mbuma ya malamu ; soki nzete ezali mabe, ekobota mpe mbuma ya mabe. Pamba te, nzete eyebanaka na mbuma na yango. 34Bino mabota ya banioka ! Ndenge nini bino bato ya mabe bokoki kolobamakambo ya malamu ? Pamba te, makambo oyo moto alobaka ewutaka na oyoetondi na kati ya motema na ye. 35Moto malamu alobaka makambo ya malamu oyo ezali na ebombeloya malamu, oyo ezali kati na ye. Moto mabe mpe alobaka makambo ya mabeoyo ezali na ebombelo ya mabe, oyo ezali kati na ye. 36Nalobi na bino, na mokolo ya kosambisama, bato bakosamba mpo na maloba ezanga tina oyo balobaka. 37Pamba te, bakolongisa yo mpo na maloba na yo, mpe bakopesa yo etumbu mpo na maloba na yo.

(Mk. 8.11-12 ; Lk. 11.29-32)

38Bongo ndambo ya balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo balobaki na ye :

—Moteyi tolingi olakisa biso elembo !

39Yesu azongisaki :

—Libota ya bato mabe mpe ezangi botosi na Nzambe nde ezali kosenga elembo. Bakopesa ye elembo mosusu te longola kaka oyo esalamaki na moprofeta Jonasi.
40Pamba te, ndenge Jonasi afandaki na libumu ya mbisi mikolo misato mpe butu misato, ndenge moko mpe Mwana ya Moto akofanda na nseya mabele mikolo misato mpe butu misato.

41Na mokolo ya kosambisama, bato ya Ninive bakotelema na bato ya tango oyo mpe bakokatela bango etumbu. Pamba te, bango babongolaki mitemana bango tango bayokaki mateya ya Jonasi. Nzokande, moto moko azali awa aleki Jonasi. 42Na mokolo ya kosambisama, mokonzi mwasi ya Sude akotelema na bato ya tango oyo mpe akokatela bango etumbu. Pamba te, ye awutaki na mboka moko ya mosika mpe ayaki koyoka maloba ya bwania ya Salomon. Nzokande, moto moko azali awa aleki Salomon.

(Lk. 11.24-26)

43—Soki molimo mabe ebimi na moto, ekokende koyenga-yenga na bisikaekawuka mpo na koluka esika ya kopema. Soki ezwi yango te, 44ekoloba : Malamu nazonga na ndako wana epai nabimaki. Tango ekozonga, mpe ekokuta ndako polele, bakombi yango, mpe babongisi yango malamu ; 45bongo molimo yango ya mabe ekokende, mpe ekozwa milimo mosusu sambo oyo eleki yango na mabe, ekoya kokota mpe kovanda kuna. Bongo lolenge ya moto oyo ekokoma mabe mingi koleka ndenge azalaki liboso. Ekozala mpe bongo mpo na bato mabe ya tango oyo.

Banani bazali penza bandeko ya Yesu

(Mk. 3.31-35 ; Lk. 8.19-21)

46Tango yesu azalaki naino koloba na bato, mama na ye mpe bandeko na ye ya mibali batelemaki libanda, mpe balingaki koloba na ye.

47Bongo moto moko ayebisaki ye :

—Mama na yo mpe bandeko na yo ya mibali batelemi na libanda, balingi koloba na yo !

48Kasi Yesu azongiselaki ye :

—Nani azali mama na ngai ? Banani bazali bandeko na ngai ?
49Bongo alakisaki bayekoli na loboko, mpe alobaki : Mama na ngai mpe bandeko na ngai ya mibali, bango oyo. 50Pamba te, moto oyo asalaka mokano ya Tata na ngai ya Likolo ye nde azali ndeko na ngai ya mobali, ndeko na ngai ya mwasi, mpe mama na ngai !
Copyright information for LinMNB